36 Bozangi nde mayele ! Nkona oyo oloni ekoki te kozongela bomoi soki ekufi te.
misisa na yango ekoki konuna na se ya mabele, mpe eteni na yango oyo etikalaka ekoki kokufa kati na mabele,
Bazoba ! Boni, ye oyo asalaki libanda, asalaki mpe kati te ?
Kasi Nzambe alobaki na ye : « Zoba ! Na butu ya lelo kaka, okokufa. Bongo nani akokoma nkolo biloko nyonso oyo ondukaki mpo na yo moko ? »
Yesu alobaki na bango : — Ah ! Bozali penza bazoba ! Tala ndenge mitema na bino ezali penza mabanga ! Bozali penza kondima te makambo nyonso oyo basakoli baloba !
Nazali koloba na bino penza ya solo : soki mbuma ya ble oyo ekweyi na mabele ekufi te, mbuma yango ekotikala kaka yango moko. Kasi soki ekufi, ekobota solo bambuma ebele.
Atako bazalaki komimona bato ya bwanya, kasi bakomaki bazoba.
Mpe nkona oyo oloni ezali te nzoto oyo nzete ekozala na yango tango ekobima ; kasi ezali mbuma ya pamba, tango mosusu mbuma ya ble to mbuma mosusu.
Boye, bosalaka penza keba na ndenge na bino ya kobika ; tika ete ezala te lokola bazoba, kasi lokola bato na bwanya.
Oh zoba ya moto ! Boni, olingi nalakisa yo ete kondima oyo ezangi misala ezali pamba ?