Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 15:35 - Mokanda na Bomoi

35 Kasi bato mosusu bakoki kotuna : « Bakufi bakosekwa ndenge nini ? Bakozonga na bomoi na nzoto nini ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 15:35
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ndenge mwana ya ane ya zamba ebotaka moto te, ndenge mpe kizengi akokoka te kokoma mayele.


Nzokande, ozali koloba : ‹ Nzambe ayebi nini ? Akoki kosambisa kati na mapata ya molili ya boye ? ›


Balobaka : « Nzambe akoyeba ndenge nini ? Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali ata na boyebi ? »


Ndenge oyebi te nzela ya mopepe to ndenge nini moto asalemaka kati na libumu ya mama na ye, ndenge wana mpe okokoka te kososola misala ya Nzambe oyo azali Mokeli ya nyonso.


Alobaki na ngai : — Mwana na moto, mikuwa oyo ezali libota mobimba ya Isalaele ! Bazali koloba : « Mikuwa na biso ekawuki, elikya na biso esili, bomoi na biso ebebi ! »


Atunaki ngai : — Mwana na moto, mikuwa oyo ekoki lisusu kozala na bomoi ? Nazongisaki : — Oh Nkolo Yawe, Yo kaka nde oyebi !


Nikodemi atunaki Ye : — Ndenge nini moto oyo akomi mobange akoki kobotama lisusu ? Akoki solo kozonga na libumu ya mama na ye mpo ete abotama lisusu ?


Nikodemi atunaki lisusu : — Ekosalema ndenge nini ?


Bongo batunaki ye : — Miso na yo ebikaki ndenge nini ?


Bato bakoki koloba : « Mpo na nini Nzambe apamelaka biso, pamba te moto moko te akoki kotelemela mokano na Ye ? »


Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ