Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 15:34 - Mokanda na Bomoi

34 Bozongela makanisi ya malamu na ndenge ekoki mpe botika kosala masumu, pamba te bato mosusu kati na bino bayebi Nzambe te ; nazali koloba yango mpo na koyokisa bino soni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 15:34
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.


Boyeba ete Yawe abulisi mpo na Ye moko mosali oyo azali sembo na miso na Ye ; Yawe ayokaka ngai tango nabelelaka Ye.


« Tika ete moto na moto asala keba na moninga na ye mpe atia motema te na ndeko na ye, pamba te ndeko nyonso azali moto ya lokuta, mpe moninga nyonso azali moto ya matongi.


Bino balangwi masanga, bolamuka mpe bolela ; bolela, bino nyonso bameli vino. Pamba te babotoli bino vino ya sika na bibebu.


Mokumbi masuwa apusanaki pene ya Yona mpe alobaki na ye : — Ndenge nini okoki penza kolala pongi boye ? Telema mpe belela nzambe na yo, tango mosusu akoki koyokela biso mawa mpo ete tokufa te.


Yesu azongiselaki bango : — Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te.


Sima na mwa tango, Yesu amonaki, kati na lopango ya Tempelo, moto oyo abikaki. Alobaki na ye : — Tala, omoni ndenge okomi sik’oyo nzoto kolongono. Kosala lisusu masumu te, noki te likambo moko ya mabe koleka ekomela yo.


Mwasi azongisaki : — Nkolo, moko te ! Bongo Yesu alobaki na ye : — Ngai mpe nakateli yo etumbu te. Kende ; kasi, kobanda lelo, kosala lisusu masumu te.]


Mpo na nini, kati na bino, bozali kondima te ete Nzambe akoki kosekwisa bakufi ?


Lokola bamonaki ete koyeba Nzambe ezali na tina te, Nzambe akabaki bango na makanisi na bango ya mabe, mpo ete basala makambo oyo ebongi te.


Bosalaka bongo awa bozali kososola tango nini tozali kobika. Tango ya kolamuka na pongi na bino ekoki, pamba te lobiko ekomi sik’oyo pene na biso, koleka tango tozwaki kondima sika.


Nazali kokoma makambo oyo mpo na koyokisa bino soni te, kasi mpo na kokebisa bino lokola bana na ngai ya bolingo.


Nazali koloba yango mpo na koyokisa bino soni ! Boni, ezali ata na moto moko te ya bwanya kati na bino, oyo akoki kokata makambo kati na bandeko na ye ?


Nzokande, bato nyonso bazali na boyebi oyo te ; bato mosusu bazali nanu na momesano ya kosambela banzambe ya bikeko kino sik’oyo. Boye wana baliaka misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bakanisaka ete ezali penza mbeka oyo babonzeli banzambe wana ; mpe mitema na bango, oyo elenda te ekomaka mbindo.


pamba te nyonso oyo ebimi na pwasa ekomaka pole. Yango wana baloba : « Moto na pongi, lamuka, bima kati na bakufi, mpe Klisto akongengisa yo. »


asengeli koboya kozala mowumbu ya baposa ya nzoto lokola Bapagano oyo bayebi Nzambe te,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ