Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 15:31 - Mokanda na Bomoi

31 Bandeko na ngai, mokolo na mokolo, nandimaka kokufa, wana namikumisaka na tina na bino kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 15:31
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yuda azongisaki : — Moto wana alobaki na biso ete tozonga kuna te soki ndeko na biso azali elongo na biso te.


Wuta tango nabimisaki bakoko na bino na Ejipito kino na mokolo ya lelo, nazalaki tango na tango kokebisa bango na maloba oyo : ‹ Botosa Ngai ! ›


Anjelu ya Yawe ayebisaki na Jozue maloba oyo :


Eloko moko kaka nayebi : Molimo Mosantu azali kokebisa ngai ete boloko mpe minyoko ya ndenge na ndenge ezali kozela ngai na bingumba nyonso oyo nakokota.


Kolanda ndenge ekomama : « Ezali mpo na Yo nde balukaka koboma biso mikolo nyonso ; bazwaka biso lokola bameme ya koboma. »


Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.


Bazali basali ya Klisto ? —Nazali koloba lokola moto ya liboma— Ngai naleki bango. Pamba te nasalaki makasi penza, nakotaki mbala mingi na boloko, babetaki ngai mingi, nakutanaki na makama ya kufa mbala mingi.


Sik’oyo, tika ete matondi ezonga epai na Nzambe oyo, mpo na bomoko na biso na Klisto, atambolisaka biso tango nyonso kati na molongo na Ye ya balongi, mpe azwaka biso lokola bisalelo na Ye mpo na kopanza boyebi ya Klisto, na bisika nyonso, lokola solo kitoko ya malasi.


Biso nde tozali bato oyo bakatisa ngenga na solo, pamba te tosambelaka Nzambe na nzela ya Molimo na Ye, tomikumisaka kati na Yesu-Klisto mpe totiaka elikya na biso na nzoto te,


Banani bazali penza elikya na biso, esengo na biso to motole na biso, oyo tokomikumisa mpo na yango na miso ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na mokolo oyo akoya ? Boni, ezali bino te ?


Matondi ya ndenge nini tokoki kozongisa epai ya Nzambe na tina na bino, mpo na esengo nyonso oyo tozali na yango mpo na bino liboso ya Nzambe na biso ?


Sik’oyo, yoka bango ; kasi kebisa bango malamu mpe yebisa bango makambo nyonso oyo mokonzi oyo akokonza bango akobanda kosala. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ