30 Bongo biso, mpo na nini tokutanaka na makama tango nyonso ?
Wana bayekoli bazalaki koluka nkayi, Yesu alalaki pongi. Mopepe moko ya makasi epepaki kati na ebale ; bwato ekomaki kotonda na mayi, mpe bakomaki na likama monene.
Soki lisekwa ezali te, bato oyo bazwaka libatisi mpo na bakufi bakosala nini ? Soki bakufi bakosekwa te, mpo na nini bato bazwaki libatisi mpo na bango ?
Bandeko na ngai, mokolo na mokolo, nandimaka kokufa, wana namikumisaka na tina na bino kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
koyebana lokola bato oyo bayebani te, nzokande toyebani makasi ; koyebana lokola bakufi, nzokande tozali bato ya bomoi ; koyebana lokola bato bakweyisama, nzokande baboma biso te ;
Bandeko na ngai, soki nazalaki nanu koteya tina ya kokatisa ngenga, mpo na nini nanyokolama lisusu ? Soki ezali bongo, mateya ya ekulusu elingaki lisusu kobetisa bato mabaku te.