Mpe sima na Nzambe kotia nyonso na se ya bokonzi na Ye, Ye moko Mwana akomitia na se ya bokonzi ya Nzambe oyo atiaki nyonso na se ya bokonzi na Ye, mpo ete Nzambe azala nyonso kati na bato nyonso.
Soki ezali kaka mpo na makambo ya bomoto nde nabundisaki banyama ya zamba kati na Efeso, litomba nini nazwaki ? Soki bakufi bakosekwa te, « wana tika ete tolia mpe tomela, pamba te, lobi, tokokufa ! »