Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 15:28 - Mokanda na Bomoi

28 Mpe sima na Nzambe kotia nyonso na se ya bokonzi na Ye, Ye moko Mwana akomitia na se ya bokonzi ya Nzambe oyo atiaki nyonso na se ya bokonzi na Ye, mpo ete Nzambe azala nyonso kati na bato nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 15:28
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nabebisaka bango nye, mpe bakokaka lisusu kotelema te ; bakweyaka na se ya matambe na ngai.


Longonya na Yawe ! Tika ete Ye oyo azali libanga na ngai akumisama ! Tika ete Nzambe ya lobiko na ngai anetolama !


Boyoki Ngai koloba na bino ete nakeyi, mpe lisusu ete nakozongela bino. Soki bozalaki kolinga Ngai, bolingaki kosepela na kokende na Ngai epai ya Tata, pamba te Tata aleki Ngai na monene.


Nzokande, nalingi boyeba ete Klisto azali Mokonzi ya mobali nyonso, mobali azali mokonzi ya mwasi, mpe Nzambe azali Mokonzi ya Klisto.


Ezali na lolenge ebele ya kosalela Nkolo, kasi Nzambe azali kaka moko ; mpe ezali Ye nde asalaka nyonso kati na bato nyonso.


Soki lisekwa ezali te, bato oyo bazwaka libatisi mpo na bakufi bakosala nini ? Soki bakufi bakosekwa te, mpo na nini bato bazwaki libatisi mpo na bango ?


kasi bino, bozali bato ya Klisto, mpe Klisto azali ya Nzambe.


oyo ezali nzoto na Ye. Nzambe oyo atondisaka nyonso kati na bato nyonso amimonisaka kati na Yesu, na mobimba ya bonzambe na Ye.


Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.


Boye, biso nyonso tozali ndenge moko : bokeseni ezali lisusu te kati na Mogreki mpe Moyuda, moto oyo akatama ngenga mpe moto oyo akatama ngenga te, mopaya mpe mwana mboka, mowumbu mpe monsomi. Bobele Klisto nde azali na tina : azali nyonso kati na bato nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ