Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 15:27 - Mokanda na Bomoi

27 Pamba te atiaki biloko nyonso na se ya matambe na Ye. Kasi wana alobi : « Nyonso ezali na se ya bokonzi na Ye, » etalisami polele ete esengeli te kotanga Nzambe oyo atiaki nyonso na se ya bokonzi na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 15:27
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Osalaki ye moke koleka ba-anjelu mpe olatisaka ye motole ya nkembo mpe ya lokumu ;


Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya ; bikolo nyonso, mikili mpe nkota bakomaki kosalela Ye. Bokonzi na Ye ezali ya seko na seko, ekotikala koleka te mpe ekotikala kobebisama te.


Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.


Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki : — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili.


Yesu ayebaki ete Tata apesaki Ye bokonzi likolo ya makambo nyonso, ete awutaki epai ya Nzambe mpe ete asengelaki kozonga epai ya Nzambe ;


Tata alingaka Mwana, mpe Mwana azalaka na bokonzi kowuta na Tata mpo na kokonza nyonso.


mpe asalelaki yango kati na Klisto tango asekwisaki Ye kati na bakufi mpe avandisaki Ye na ngambo ya loboko na Ye ya mobali kati na Likolo,


Nzambe atia nyonso na se ya matambe ya Yesu mpe apona Yesu mpo ete akonza nyonso lokola Mokonzi ya Lingomba


Mpe lisusu, epai ya anjelu nini Nzambe aloba : « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo ? »


Kasi sima na Klisto kobonza mbeka moko kaka mpo na masumu, avandi mpo na libela na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.


mpe otiaki biloko nyonso na se ya matambe na ye. » Awa Nzambe atiaki nyonso na se ya bokonzi na ye, atikaki ata eloko moko te oyo ezangaki kozala na se ya bokonzi na ye. Nzokande, ezali solo ete, kino sik’oyo, tomoni nanu te ete nyonso ezali na se ya bokonzi na ye.


oyo akotaki kati na Likolo, avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe mpe azali kokonza ba-anjelu, banguya mpe milimo ya mipepe na likolo.


Nazali Ye oyo azali na bomoi ; nakufaki, mpe sik’oyo tala, nazali na bomoi mpo na libela na libela ! Nasimbi bafungola ya kufa mpe ya mboka ya bakufi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ