Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 15:13 - Mokanda na Bomoi

13 Soki bakufi bakosekwa te, wana Klisto mpe asekwaki te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 15:13
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

pamba te Basaduseo balobaka ete lisekwa ezalaka te, ba-anjelu bazalaka te, milimo mpe ezalaka te ; nzokande, Bafarizeo bandimaka makambo wana nyonso.


Mpe soki Molimo ya Ye oyo asekwisaki Yesu kati na bakufi azali kovanda kati na bino, Ye oyo asekwisaki Klisto kati na bakufi akopesa mpe bomoi epai na banzoto na bino, oyo ebengami na kokufa, na nzela ya Molimo na Ye, oyo avandaka kati na bino.


Ezali yango moko kaka te nde ezali kolela ; kasi biso ba-oyo mpe tozwaki Molimo lokola mbuma ya liboso tozali mpe komona pasi kati na mitema, wana tozali kozela na posa makasi ete Nzambe akomisa biso bana na Ye penza mpe asikola banzoto na biso.


Nzokande, soki toteyaka ete Klisto asekwaki kati na bakufi, ndenge nini bato mosusu kati na bino balobaka ete bakufi bakosekwa te ?


Mpe soki Klisto asekwaki te, wana mateya na biso ezali na tina te, mpe kondima na bino ezali pamba.


Kasi, solo, Klisto asekwaki kati na bakufi : azali Mosekwi ya liboso kati na bakufi.


Pamba te ndenge tondimaka ete Yesu akufaki mpe asekwaki, ndenge mpe tondimaka ete Nzambe akomema, na nzela ya Yesu mpe elongo na Ye, bato oyo bakufa kati na Ye.


Sik’oyo, Nzambe abombeli ngai motole ya bosembo, oyo Nkolo, Mosambisi ya sembo, akopesa ngai na mokolo wana : akopesa yango na ngai kaka te, kasi mpe na bato nyonso oyo balingaka boyei na Ye.


Tika ete Nzambe ya kimia, Ye oyo asekwisaki kati na bakufi Mobateli monene ya bameme, Yesu, Nkolo na biso, na nzela ya makila ya Boyokani ya seko,


Boye, lokola bana yango bazali na nzoto mpe makila, Ye mpe asanganaki elongo na bomoto na bango mpo ete, na nzela ya kufa na Ye, asilisa nguya ya Satana oyo azalaki kosimba nguya ya kufa,


Tika ete Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama ! Pamba te, kati na mawa monene na Ye, asalaki ete tobotama mbotama ya sika, na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto kati na bakufi, mpo na kopesa biso elikya ya solo


Nazali Ye oyo azali na bomoi ; nakufaki, mpe sik’oyo tala, nazali na bomoi mpo na libela na libela ! Nasimbi bafungola ya kufa mpe ya mboka ya bakufi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ