oyo na nzela na Ye, tozwi ndingisa, na nzela ya kondima, ya kozwa ngolu oyo kati na yango tozali kowumela mpe tozali komikumisa kati na elikya ete tokobika nkembo ya Nzambe.
Pamba te, ata soki bozalaki na balakisi nkoto zomi kati na Klisto, kasi bozali na batata ebele te. Ngai nde nazali tata na bino kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu.
Mpe tala mpo na nini tozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe : tango boyambaki Liloba na Nzambe, oyo toteyaki bino, bondimaki yango te lokola liloba oyo ewuti epai ya bato, kasi lokola penza Liloba na Nzambe, oyo ezali kosala kati na bino oyo bozali na kondima.
Bandeko, mpo na oyo etali makambo mosusu, tolakisaki bino ndenge nini bosengeli kotambola mpo na kosepelisa Nzambe, mpe yango nde bozali kosala. Kasi sik’oyo, tozali kosenga na bino mpe kotinda bino na makasi, kati na Nkolo Yesu, ete bokoba kosalaka bongo koleka.
Bandeko, totindi bino na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto ete bokima ndeko nyonso oyo atambolaka na bomoi ya mobulu mpe alingaka te kotambola kolanda malakisi oyo bozwaki kowuta na biso.
Na lisungi ya Silasi oyo azali ndeko ya solo, nakomeli bino mokanda oyo na mokuse mpo na kolendisa bino mpe kolakisa bino ete ngolu oyo bokangami na yango ezali ngolu ya solo ya Nzambe. Bopikama kati na yango.