Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 14:39 - Mokanda na Bomoi

39 Yango wana, bandeko na ngai, bozala na posa makasi ya likabo ya kosakola, mpe bopekisa bato te koloba nkota oyo eyebani te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 14:39
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bozala na posa makasi ya kozala na makabo oyo eleki na monene. Mpo na yango, nakolakisa bino nzela oyo eleki malamu.


Soki nazali na likabo ya kosakola, ya kososola mabombami nyonso mpe ya koyeba makambo nyonso ; mpe soki nazali na kondima oyo ekoki kolongola bangomba, kasi nazangi bolingo, nazali pamba.


Boye bolukaka liboso bolingo, mpe bozalaka na posa makasi ya makabo ya Molimo, mpe mingi penza likabo ya kosakola.


Kasi moto oyo asakolaka alobaka nde na bato mpo na kokolisa kondima na bango, kolendisa bango mpe kobondisa bango.


Soki ayebi yango te, elingi koloba ete Nzambe mpe ayebi ye te.


Nalingi ete bino nyonso bolobaka nkota oyo eyebani te, kasi nalingi mingi koleka ete bino nyonso bosakolaka. Moto oyo azali kosakola azali na tina mingi, koleka moto oyo azali koloba nkota oyo eyebani te, longola kaka soki alimboli nkota yango mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ