oyo ayokaka maloba na Nzambe, oyo ayebaka basekele ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo, oyo azwaka emoniseli kowuta na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, oyo soki akweyi na molimo, miso na ye efungwamaka :
Pamba te na ngolu oyo epesameli ngai, nazali koloba na bino nyonso : bomikanisaka te koleka makoki na bino, kasi bomikanisaka na lolenge ya mayele, kolanda kondima oyo Nzambe apesi na moko na moko kati na bino.
Bandeko, nakokaki te koloba na bino lokola na bato oyo batambolisamaka na Molimo, kasi lokola na bato oyo batambolisamaka kolanda baposa ya nzoto, lokola na bana mike kati na Klisto.
Mpo na oyo etali baseka, nazali na mobeko te kowuta na Nkolo ; kasi na mawa ya Nkolo, lokola moto oyo bakoki kotiela motema, nazali kopesa likanisi na ngai.
Botala penza makambo ndenge ezaleli. Soki ezali na moto oyo andimisami solo ete azali ya Klisto, ayeba mpe ete soki ye azali ya Klisto, biso mpe tozali ya Klisto lokola ye.
Pamba te bozali kondima ete songolo aya koteya bino Yesu mosusu oyo akeseni na Yesu oyo biso toteyaki bino ; bozali mpe kondima kozwa molimo mosusu oyo ekeseni na Molimo oyo boyambaki to mateya oyo ekeseni na Sango Malamu oyo bondimelaki !
Biso, tozali ya Nzambe ; mpe moto nyonso oyo ayebi Nzambe ayokaka biso. Kasi moto oyo azali ya Nzambe te ayokaka biso te. Ezali ndenge wana nde toyebaka Molimo ya solo mpe molimo ya libunga.