Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 14:34 - Mokanda na Bomoi

34 basi basengeli te koloba kati na mayangani, pamba te bazali na ndingisa te ya koloba. Basengeli nde kotosa ndenge Mobeko etindaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 14:34
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe alobaki na mwasi : « Nakobakisa pasi na zemi na yo ; okobota na pasi. Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo, kasi ye akozala mokonzi na yo. »


Botala nanu bino moko : boni, ezali malamu mpo na mwasi kosambela Nzambe moto polele ?


Nzokande, nalingi boyeba ete Klisto azali Mokonzi ya mobali nyonso, mobali azali mokonzi ya mwasi, mpe Nzambe azali Mokonzi ya Klisto.


Kasi mwasi nyonso oyo asambelaka to asakolaka, wana moto na ye ezali polele, ayokisaka mokonzi na ye soni, pamba te azali lokola mwasi oyo bakokola suki.


Ekomama boye kati na Mobeko : « Ekozala na nkota ya bapaya, na nzela ya nkota oyo eyebani te nde nakoloba na bato oyo ; kasi atako bongo, bakoyoka ngai te, » elobi Nkolo.


Soki bazali na posa ya koyeba likambo, tika ete batunaka mibali na bango kati na ndako, pamba te ezali soni mpo na mwasi koloba kati na mayangani.


Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye.


Basi, botosaka mibali na bino ndenge ebongi kati na Nkolo.


komibatela malamu, kotambola na bomoi ya peto, komipesa na misala kati na bandako na bango, kozala basi ya boboto mpe ya botosi liboso ya mibali na bango, mpo ete Liloba na Nzambe efingama te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ