epai na mosusu, nguya ya kosala bikamwa ; epai na mosusu, likabo ya kosakola ; epai na mosusu, likabo ya kososola milimo ; epai na mosusu, likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge ; epai na mosusu, likabo ya kolimbola nkota.
Pamba te moto oyo alobaka na lokota oyo eyebani te alobaka na Nzambe kasi na bato te. Boye moto moko te asosolaka ye ; nzokande, alobaka mabombami, na bokambami ya Molimo.
Soki moto ya kolimbola maloba yango azali te, wana tika ete ye oyo azali koloba lokota oyo eyebani te akanga monoko kati na Lingomba, mpe aloba epai na ye moko mpe epai ya Nzambe.