Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 14:26 - Mokanda na Bomoi

26 Bandeko, toloba lisusu nini ? Tango bosanganaka esika moko, tika ete moko ayemba nzembo, mosusu ateya, mosusu ayebisa makambo oyo Nzambe amonisi ye, mosusu aloba na lokota oyo eyebani te, mpe mosusu alimbola. Nyonso wana esengeli kosalema mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 14:26
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete nazalaki mbala mingi kosala mabongisi ya koya epai na bino, mpo na kobuka mbuma kati na bino, ndenge nazalaki kosala kati na Bapagano mosusu ; kasi kino sik’oyo, bipekiselo mingi ezali kokanga ngai nzela.


tika ete moto oyo azali na likabo ya kosala mosala songolo kati na Lingomba amipesaka na mosala yango, tika ete moto oyo azali na likabo ya kopesa malakisi apesaka yango,


Yango wana, tolukaka tango nyonso makambo oyo ememaka kimia mpe elendisaka bamoko mpe bamosusu kati na kondima.


Tika ete moto nyonso kati na biso aluka kosepelisa moninga na ye mpo na bolamu mpe bolendisami na ye !


Boye, nasala nini ? Nakosambela na molimo na ngai, kasi nakosambela mpe na mayele na ngai ; nakoyemba na molimo na ngai, kasi nakoyemba mpe na mayele na ngai.


Pamba te moto oyo alobaka na lokota oyo eyebani te alobaka na Nzambe kasi na bato te. Boye moto moko te asosolaka ye ; nzokande, alobaka mabombami, na bokambami ya Molimo.


Soki bato bazali koloba na nkota oyo eyebani te, tika ete bato mibale, suka bato misato, baloba, moko sima na mosusu, mpe esengeli ete moko alimbola yango.


Kasi tika ete makambo nyonso esalema na ndenge oyo esengeli, na mobulu te.


Bokanisi ete, wuta kala, biso tolukaka komilongisa liboso na bino ? Te, balingami na ngai ! Ezali liboso ya Nzambe, kati na Klisto, nde tolobaka mpe tosalaka makambo nyonso mpo na kokolisa kondima na bino.


Yango wana, nazali kokomela bino makambo yango nyonso, awa nazali nanu mosika na bino, mpo ete, tango nakoya, bomona ngai te lokola moto ya makambo makasi na lolenge na ngai ya kosalela bokonzi oyo Nkolo apesaki ngai mpo na kolendisa kondima na bino, kasi mpo na kokweyisa yango te.


mpo na kopesa na basantu makoki ya kokokisa lotomo na bango, na tina ete nzoto ya Klisto etongama malamu.


Ezali na nguya na Ye nde nzoto mobimba ekolaka mpe emitongaka kati na bolingo, wana esili kokangana malamu mpe kokoma moko na nzela ya misisa oyo epesaka yango bilei, mpo na kopesa na eteni moko na moko nzela ya kosala mosala na yango na ndenge ekoki.


Tika ete minoko na bino ebimisaka maloba ya mabe te, kasi bolobaka kaka maloba ya boboto, maloba oyo esungaka bato mosusu na kokola kati na kondima, kolanda bosenga na bango, mpe esalaka bolamu na bato oyo bayokaka yango.


bolendisanaka na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu, mpe na nzela ya banzembo oyo ewutaka na Molimo ; boyembelaka mpe bosanzolaka Nkolo wuta na mozindo ya mitema na bino ;


Yango wana, bolendisanaka mpe bosunganaka bino na bino, ndenge mpe kaka bozali kosala yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ