Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 14:25 - Mokanda na Bomoi

25 Basekele ya motema na ye ekomonisama polele. Bongo, akofukama elongi kino na mabele, akogumbamela Nzambe mpe akoloba : « Solo, Nzambe azali kati na bino. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 14:25
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozefi azalaki kaka na ndako. Tango Yuda na bandeko na ye ya mibali bakotaki na ndako, bagumbamaki kino na se liboso na ye.


Bakonzi nyonso bakofukama liboso na ye, mpe bikolo nyonso ekosalela ye.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mosala ya Ejipito, mombongo ya Kushi mpe bato milayi ya Seba, bakoleka epai na yo mpe bakozala ya yo. Bakotambola ya kokangama na minyololo, sima na yo ; bakofukama liboso na yo mpe bakobondela yo na maloba oyo : ‹ Solo, Nzambe azali penza epai na yo, nzambe mosusu azali te ! › »


Bana ya banyokoli na yo bakoya kofukama liboso na yo ; bato nyonso oyo batiolaki yo bakofukama na se ya matambe na yo mpe bakobenga yo Engumba ya Yawe, Siona ya Mosantu ya Isalaele.


Mokonzi alobaki na Daniele : « Solo, Nzambe na bino azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bakonzi mpe Molakisi mabombami, mpo ete okoki kolakisa mabombami oyo ! »


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Na mikolo wana, bato zomi ya bikolo mpe ya nkota ya ndenge na ndenge bakokanga songe ya nzambala ya Moyuda moko mpe bakoloba : ‹ Tika ete tokende elongo na yo, pamba te toyoki ete Nzambe azali na bino elongo. › »


Afukamaki na makolo ya Yesu, elongi kino na se, mpe azongiselaki Ye matondi. Moto yango azalaki moto ya Samari.


Tango Simona Petelo amonaki bongo, afukamaki na mabolongo ya Yesu mpe alobaki : — Nkolo, zala mosika na ngai, pamba te nazali moto ya masumu !


Tango amonaki Yesu, agangaki mpe amibwakaki na makolo na Ye, na koganga na mongongo makasi koleka : — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, olingi nini epai na ngai ? Nabondeli Yo, kotungisa ngai te !


Mwasi yango alobaki na Yesu : — Nkolo, namoni ete ozali mosakoli.


Wana bamonaki ndenge nini Petelo mpe Yoane bazalaki koloba na mpiko, mpe wana basosolaki ete bazali bato batanga te mpe bato pamba, bakamwaki mingi. Boye, basosolaki ete bango mpe bazalaki elongo na Yesu.


Bongo nakweyaki mbala moko liboso ya Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, naliaki lipa te mpe namelaki mayi te mpo na lisumu monene oyo bosalaki wana bosalaki mabe na miso ya Yawe mpe, na bongo, bopesaki Ye kanda.


Bampaka tuku mibale na minei mpe bikelamu minei ya bomoi bafukamaki mpe bagumbamelaki Nzambe oyo avandaka na Kiti ya Bokonzi, mpe bagangaki : « Amen ! Aleluya ! »


Tango kaka azwaki buku, bikelamu minei ya bomoi mpe bampaka tuku mibale na minei bagumbamaki liboso ya Mpate. Moko na moko kati na bango asimbaki na loboko na ye lindanda mpe kopo ya wolo etonda na ansa oyo ezali mabondeli ya basantu.


Samuele azongiselaki Saulo : — Ngai oyo moto oyo azwaka bimoniseli. Kende liboso na ngai, na esambelo ya likolo ya ngomba ; pamba te, lelo, okolia elongo na ngai. Bongo lobi na tongo, nakotika yo kozonga, mpe nakoyebisa yo makambo nyonso oyo ezali kati na motema na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ