21 Ekomama boye kati na Mobeko : « Ekozala na nkota ya bapaya, na nzela ya nkota oyo eyebani te nde nakoloba na bato oyo ; kasi atako bongo, bakoyoka ngai te, » elobi Nkolo.
Oh libota ya Isalaele, » elobi Yawe, « nakoyeisa ekolo moko wuta mosika mpo na kobundisa yo : ezali ekolo moko ya kala mpe ya nguya, ekolo oyo yo oyebi ata monoko na yango te.
Yawe akotindela bino na mosika, wuta na suka ya mokili, ekolo moko oyo ezali lokola mpongo oyo ezali kopumbwa, ekolo oyo bokososola monoko na yango te ; ekobundisa bino.