Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 14:20 - Mokanda na Bomoi

20 Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike ; bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike ; kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 14:20
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo nalobaki na bankumu, bakalaka mpe bato mosusu : — Mosala ezali nanu monene mpe ekenda na etando molayi ; kasi biso topanzani mingi na mir, tozali mosika-mosika, bamoko na bamosusu.


Naleki balakisi na ngai nyonso na mayele, pamba te nakanisaka malako na Yo.


esengo na ye ekozala na kotosa Yawe. Akokata makambo ndenge emonanaka na libanda te to mpe akozwa mikano te kolanda biyoka-yoka ;


« Bato na Ngai bazali bazoba, bayebi Ngai te ; bazali bana bazangi bososoli, bazali na mayele te, bayebi kaka kosala mabe, kasi bayebi kosala bolamu te. »


Kaka na tango yango, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike !


mpe alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bobongwani te mpe bokomi te lokola bana mike, bokotikala kokota te na Bokonzi ya Likolo.


Yesu alobaki : — Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.


Yesu azongisaki : — Boni, botangi te ete, na ebandeli, Mokeli « akelaki bango mobali mpe mwasi, »


Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.


Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.


Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete nazalaki mbala mingi kosala mabongisi ya koya epai na bino, mpo na kobuka mbuma kati na bino, ndenge nazalaki kosala kati na Bapagano mosusu ; kasi kino sik’oyo, bipekiselo mingi ezali kokanga ngai nzela.


Pamba te bato nyonso bayebi botosi na bino, mpe motema na ngai etondaka mingi na esengo mpo na bino. Kasi nalingi ete bozala bato ya bwanya mpo na kosala bolamu, mpe bato oyo bazangi mbeba mpo na oyo etali mabe.


Tango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, nazalaki kokanisa lokola mwana moke, mpe nazalaki na mayele lokola ya mwana moke ; kasi tango nakomaki mokolo, natikaki oyo ekoki na mwana moke.


Kasi kati na Lingomba, nasepelaka koloba maloba mitano oyo bato bakoki kososola mpo na koteya bato mosusu, na esika ete naloba maloba nkoto zomi na nkota oyo eyebani te.


Nzokande, toteyaka bwanya epai ya Baklisto oyo bakemba na kondima ; mpe bwanya yango ezali ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami mpo na libebi.


Boye, biso nyonso tokokoma na bomoko kati na kondima mpe kati na boyebi ya Mwana na Nzambe, mpe tokokoma bato oyo bakembi kolanda ndenge Klisto azali ya kokoka.


Mpe nasengaka kati na mabondeli na ngai ete bolingo na bino ekoba kokola tango nyonso kati na boyebi ya solo mpe na bososoli ya kokoka,


Biso nyonso oyo tokola na Molimo, tosengeli kokanisa ndenge wana. Mpe soki ezali na likambo oyo na tina na yango bozali kokanisa ndenge mosusu, Nzambe akososolisa bino.


Lokola bana oyo babotami sika, bolingaka makasi komela miliki ya peto ya Liloba mpo ete bokola na nzela na yango mpo na kozwa lobiko,


kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ