17 Ozali kozongisa matondi ya kitoko, kasi moto mosusu azali kokola te kati na kondima.
Yango wana, tolukaka tango nyonso makambo oyo ememaka kimia mpe elendisaka bamoko mpe bamosusu kati na kondima.
Nazongisaka matondi epai ya Nzambe mpo ete nalobaka nkota oyo eyebani te, koleka bino nyonso.
Moto oyo alobaka na lokota oyo eyebani te alendisaka kaka kondima na ye moko, kasi moto oyo asakolaka alendisaka kondima ya Lingomba mobimba.
Nalingi ete bino nyonso bolobaka nkota oyo eyebani te, kasi nalingi mingi koleka ete bino nyonso bosakolaka. Moto oyo azali kosakola azali na tina mingi, koleka moto oyo azali koloba nkota oyo eyebani te, longola kaka soki alimboli nkota yango mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.
Bandeko na ngai, soki nayei epai na bino mpe nalobi na bino kaka na nkota oyo eyebani te, nakozala litomba nini mpo na bino soki liloba na ngai ememeli bino te ezala emoniseli, boyebi ya sika, lisakoli to malakisi ?