Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 14:16 - Mokanda na Bomoi

16 Soki ozali kozongisa matondi epai ya Nzambe kati na molimo na yo, ndenge nini ba-oyo bazali koyoka te bakoki koloba « Amen ! » na losambo na yo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe ? Pamba te bayebi te makambo oyo ozali koloba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 14:16
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azongiselaki mokonzi : — Amen ! Tika ete Yawe, Nzambe ya mokonzi, nkolo na ngai, akokisa maloba oyo.


Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko ! Bato nyonso balobaki : « Amen ! » Mpe bakumisaki Yawe !


Mpe napupolaki songe ya nzambala na ngai na koloba : — Tika ete Nzambe apupola ndenge ngai nazali kosala mpe abengana, mosika ya ndako na ye mpe ya biloko na ye, moto nyonso oyo akokokisa te elaka na ye ; mpe tika ete bapupola ye ndenge wana mpe atikala maboko pamba ! Lisanga mobimba ezongisaki : — Amen ! Bakumisaki Yawe mpe bakokisaki makambo oyo balakaki.


Esidrasi akumisaki Yawe, Nzambe Monene ; mpe bato nyonso batombolaki maboko na bango mpe bazongisaki : « Amen  ! » Bongo bafukamaki mpe bakitisaki bilongi na bango kino na se mpo na kogumbamela Yawe.


Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko ! Tika ete bato nyonso baloba : « Amen ! » Bokumisa Yawe !


Mpo ete nazangi pamela, okosunga ngai mpe okovandisa ngai na makolo na Yo mpo na libela.


Tika ete Kombo na Ye ya nkembo epambolama libela na libela ! Tika ete mokili mobimba etonda na nkembo na Ye ! Amen ! Amen !


Yawe, kanisa mafinga ya banguna na Yo, oyo batiolaka bomoi ya mopakolami na Yo !


Bongo nakokokisa ndayi oyo nalapaki epai ya bakoko na bino ete nakopesa bango mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo bozali na yango lelo. » Nazongisaki : — Solo, Yawe ; amen !


Mosakoli Jeremi alobaki : « Amen ! Tika ete Yawe asala bongo ! Tika ete Yawe akokisa maloba oyo osili kosakola, azongisa na esika oyo, wuta na Babiloni, bisalelo ya Tempelo ya Yawe mpe bato nyonso oyo bakendeki na bowumbu !


Tika ete mayi oyo ezali komema elakeli mabe ekota kati na yo mpo ete libumu na yo evimba mpe okoma ekomba. ’ Mwasi akozongisa : ‘ Amen ! Tika ete esalema bongo ! ’


Bongo azwaki mapa yango sambo mpe bambisi, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye ; mpe bayekoli bakabolaki yango epai ya bato.


bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.


komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.]  ›


Bayekoli bakendeki koteya na bisika nyonso. Nkolo azalaki kosala elongo na bango mpe azalaki kokokisa liloba na Ye na nzela ya bilembo ya kokamwa oyo ezalaki kolanda liloba na Ye.


Yesu asalaki lisusu makambo mosusu ebele ; soki bakomaki yango na mikanda moko sima na mosusu, nakanisi ete mokili mobimba elingaki kokoka te mpo na kobomba babuku oyo balingaki kokoma.


Bayuda bakamwaki mpe bazalaki kotunana : — Ndenge nini moto oyo ayekola te akoki koyeba Makomi boye ?


Wana bamonaki ndenge nini Petelo mpe Yoane bazalaki koloba na mpiko, mpe wana basosolaki ete bazali bato batanga te mpe bato pamba, bakamwaki mingi. Boye, basosolaki ete bango mpe bazalaki elongo na Yesu.


mpe, sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe alobaki : « Oyo ezali nzoto na Ngai ; epesami mpo na bino ! Bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai. »


Pamba te soki nasambeli na nkota oyo eyebani te, molimo na ngai ekozala kosambela, kasi mayele na ngai ekosala te.


Pamba te moto oyo alobaka na lokota oyo eyebani te alobaka na Nzambe kasi na bato te. Boye moto moko te asosolaka ye ; nzokande, alobaka mabombami, na bokambami ya Molimo.


Bolingo na ngai ezali elongo na bino nyonso kati na Yesu-Klisto. Amen !


Pamba te bilaka nyonso ya Nzambe ezalaka « iyo » kati na Klisto ; mpe ezali na nzela na Ye Klisto nde tolobaka « amen » mpo na nkembo ya Nzambe.


Motatoli ya makambo oyo alobi : — Iyo, nazali koya kala mingi te. Amen : Nkolo Yesu, yaka !


Bikelamu minei ya bomoi bazalaki kozongisa : « Amen. » Mpe bampaka bafukamaki mpe bagumbamelaki.


na koloba : « Amen ! Tika ete masanzoli, nkembo, bwanya, matondi, lokumu, nguya mpe makasi ezala ya Nzambe na biso, mpo na libela na libela ! Amen ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ