15 Boye, nasala nini ? Nakosambela na molimo na ngai, kasi nakosambela mpe na mayele na ngai ; nakoyemba na molimo na ngai, kasi nakoyemba mpe na mayele na ngai.
Nzambe oyo nasalelaka na motema na ngai mobimba tango nateyaka Sango Malamu ya Mwana na Ye, azali Motatoli na ngai ete natikaka te kotanga kombo na bino
Mpe bosambelaka tango nyonso na bokambami ya Molimo, na nzela ya lolenge nyonso ya mabondeli mpe ya bisengeli. Mpo na yango, bosenzelaka mpe bomikabaka mobimba mpo na kobondelaka mpo na basantu nyonso.
Ezala bongo to bongo te, eloko ya motuya ezali ete Klisto azali kosakolama, na lolenge nyonso, ezala na makanisi ya mabe to na bosolo ; mpe ngai nazali kosepela mpo na yango. Kutu, nakokoba kosepela mpo na yango.
Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.