Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 14:13 - Mokanda na Bomoi

13 Yango wana, tika ete moto oyo alobaka na nkota oyo eyebani te abondela mpo ete azwa makoki ya kolimbola maloba oyo azali koloba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 14:13
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana nazali koloba na bino : eloko nyonso oyo bokosenga wana bozali kosambela, bondima ete bosili kozwa yango mpe bokomona yango kokokisama.


Bango nyonso, na motema moko, bazalaki na molende ya kosangana mbala na mbala mpo na kosambela elongo na basi, elongo na Mari, mama ya Yesu, mpe elongo na bandeko ya Yesu.


Tango bakomaki kuna, basambelaki mpo na bandimi ya sika mpo ete bazwa Molimo Mosantu,


epai na mosusu, nguya ya kosala bikamwa ; epai na mosusu, likabo ya kosakola ; epai na mosusu, likabo ya kososola milimo ; epai na mosusu, likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge ; epai na mosusu, likabo ya kolimbola nkota.


Bango nyonso bazali na likabo ya kobikisa babeli ? Bango nyonso balobaka nkota ya ndenge na ndenge ? Bango nyonso balimbolaka nkota ?


Yango wana, bino mpe, lokola bozalaka na posa makasi ya makabo ya Molimo, bolukaka mingi kozala na yango ebele mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.


Pamba te soki nasambeli na nkota oyo eyebani te, molimo na ngai ekozala kosambela, kasi mayele na ngai ekosala te.


Bandeko, toloba lisusu nini ? Tango bosanganaka esika moko, tika ete moko ayemba nzembo, mosusu ateya, mosusu ayebisa makambo oyo Nzambe amonisi ye, mosusu aloba na lokota oyo eyebani te, mpe mosusu alimbola. Nyonso wana esengeli kosalema mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ