Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 13:9 - Mokanda na Bomoi

9 Pamba te toyebaka kaka moke, mpe tosakolaka kaka moke.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 13:9
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki makambo wana ezali kaka ndambo moke ya misala na Ye mpe mongongo na Ye ya se oyo toyokaka, nani akoki kososola bakake ya nguya na Ye ? »


Solo, boyebi oyo ya kokamwa elekelaka ngai, ezali likolo makasi, nakoki kososola yango te.


Esengo na moto oyo atiaka elikya kati na Yawe, kasi atalelaka te bato ya lolendo mpe bakosi.


Nani amata na Lola to mpe akita wuta kuna ? Nani asangisa mopepe kati na maboko na ye ? Nani akanga mayi na kazaka na ye ? Nani akata bandelo nyonso ya mabele ? Kombo na ye nani ? Mpe kombo ya mwana na ye ezali nani ? Yebisa ngai soki oyebi !


Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.


« Nani ayebaki makanisi ya Nkolo ? Nani akomaki kopesa Ye toli ?


Kasi tango kokokisama ekokoma, oyo ezali moke ekolimwa.


Solo, sik’oyo, tozali komona kaka elilingi, lokola kati na talatala ; kasi mokolo ezali, mokolo oyo tokomona penza ndenge esengeli. Sik’oyo nayebi kaka moke ; kasi mokolo ezali, mokolo oyo nakoyeba penza nyonso, ndenge Nzambe ayebi ngai.


Kasi, kolanda ndenge ekomama : « Oyo liso etikala nanu komona te, oyo litoyi etikala nanu koyoka te, mpe oyo moto atikala nanu kokanisa te kati na motema na ye, yango nde Nzambe abongisi mpo na bato oyo balingaka Ye. »


Moto oyo akanisaka ete azali na boyebi ya makambo ayebi nanu eloko te na ndenge esengeli.


Atako nazali moto ya suka kati na basantu nyonso, kasi Nzambe apesa ngai ngolu ya kosakola epai ya Bapagano bomengo monene ya Klisto ;


Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe ; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye ; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ