Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 12:28 - Mokanda na Bomoi

28 Mpe kati na Lingomba, Nzambe atiaki : ya liboso, bantoma ; ya mibale, basakoli ; ya misato, balakisi ; mpe na sima, bato oyo bazali na likabo ya kosala bikamwa, ba-oyo bazali na likabo ya kobikisa babeli, ba-oyo bazali na likabo ya kosunga bato, ba-oyo bazali na likabo ya kokamba, mpe ba-oyo bazali na likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 12:28
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakokita mpe nakosolola na yo kuna. Nakokamata Molimo oyo ezali epai na yo mpe nakotia yango epai na bango. Bongo, bakosunga yo mpo na komema mokumba ya bato oyo mpo ete omema yango lisusu yo moko te.


Tala bilembo oyo ekolanda bato oyo bakondima : na Kombo na Ngai, bakobengana milimo mabe ; bakoloba nkota ya sika,


Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo ; » Andre, ndeko na ye ; Jake, Yoane, Filipo, Bartelemi ;


Na mikolo wana, ndambo ya basakoli bakendeki na Antioshe longwa na Yelusalemi.


Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli ; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.


Bozalaka libaku te, ezala mpo na Bayuda, mpo na Bagreki to mpo na Lingomba ya Nzambe.


Kasi Nzambe atiaki biteni kati na nzoto, mpe amonaki ete ezali malamu mpo na eteni moko na moko kozala na mosala na yango.


Boni, bango nyonso bazali bantoma ? Bango nyonso bazali basakoli ? Bango nyonso bazali balakisi ? Bango nyonso basalaka bikamwa ?


Bango nyonso bazali na likabo ya kobikisa babeli ? Bango nyonso balobaka nkota ya ndenge na ndenge ? Bango nyonso balimbolaka nkota ?


Pamba te moto oyo alobaka na lokota oyo eyebani te alobaka na Nzambe kasi na bato te. Boye moto moko te asosolaka ye ; nzokande, alobaka mabombami, na bokambami ya Molimo.


Moto oyo alobaka na lokota oyo eyebani te alendisaka kaka kondima na ye moko, kasi moto oyo asakolaka alendisaka kondima ya Lingomba mobimba.


Nalingi ete bino nyonso bolobaka nkota oyo eyebani te, kasi nalingi mingi koleka ete bino nyonso bosakolaka. Moto oyo azali kosakola azali na tina mingi, koleka moto oyo azali koloba nkota oyo eyebani te, longola kaka soki alimboli nkota yango mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.


Nzambe akotisi bino kati na ndako oyo moboko na yango ezali bantoma mpe basakoli, mpe Ye moko Yesu-Klisto azali libanga na yango ya motuya mpo na kosimba ndako mobimba.


Molimo ayebisaki mabombami yango te na bato ya bikeke ya kala, ndenge alakisi yango sik’oyo na bantoma mpe basakoli ya Nzambe oyo bazali bule.


Bakambi oyo batambolisaka malamu misala ya Lingomba basengeli kozwa lifuti mbala mibale, mingi-mingi ba-oyo basalaka mosala ya kopanza Sango malamu mpe ya koteya.


Botosaka bakambi na bino mpe bosalelaka mitindo oyo bapesaka bino, pamba te bazali bakengeli ya milimo na bino mpe bakosamba likolo na bino liboso ya Nzambe. Bosalaka bongo mpo ete basala mosala na bango na esengo, kasi na koyimayima te, soki te bokozanga litomba.


Bopesa mbote na bakambi na bino nyonso mpe na basantu nyonso. Bandeko ya Itali batindeli bino mbote.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ