pamba te bozali nanu kotambolisama kolanda baposa ya nzoto. Lokola likunya mpe koswana ezali kati na bino, boni, bozali te kotambolisama kolanda baposa ya nzoto ? Bozali kaka kosala lokola moto nyonso te ?
Bandeko na ngai, nasukisi mokanda na ngai na maloba oyo : Bosepelaka ! Bolukaka kokoma bato ya kokoka, bolendisanaka bino na bino, bozalaka na likanisi moko, bobikaka bomoi na bino na kimia. Bongo Nzambe ya bolingo mpe ya kimia akozala na bino elongo.
Boye, soki nakomelaki bino, ezalaki te likolo na moto oyo asalaki mabe to likolo na moto oyo basalaki mabe, kasi ezalaki mpo ete bolingo na bino mpo na biso etalisama kati na bino liboso ya Nzambe.