22 Nzokande biteni ya nzoto, oyo emonanaka ete ezali na motuya moke, ezalaka na tina makasi ;
Kozala na bato ebele epesaka mokonzi lokumu, kasi mokonzi akweyaka soki azali na bato te.
Moto oyo alingaka mbongo atondaka yango te, mpe moto oyo alingaka bomengo, bozwi na ye etondisaka ye te. Wana mpe ezali kaka pamba.
Yango wana, liso ekoki te koloba na loboko : « Nazali na posa na yo te ; » moto mpe ekoki te koloba na makolo : « Nazali na posa na bino te. »
biteni oyo tozwaka na lokumu moke kati na nzoto, tobatelaka yango makasi ; mpe biteni oyo toyokaka nkele, yango nde tobongisaka na lolenge malamu,
awa bozali kosala elongo na biso na nzela ya mabondeli na bino. Boye, bato ebele bakozongisa matondi epai ya Nzambe na tina na biso mpo na likabo ya ngolu oyo azali kopesa biso lokola eyano na mabondeli ya bato ebele.