20 Solo, biteni ezali ebele, kasi nzoto ezali kaka moko.
ndenge wana mpe tozali nzoto moko kati na Klisto atako tozali ebele, mpe moko na moko kati na biso azalaka eteni ya nyonso mosusu.
Nzoto ezali kaka moko, kasi ezali na biteni ebele ; mpe atako motango na yango ezali ebele, kasi ezali kosala kaka nzoto moko. Ezali mpe bongo mpo na Klisto.
Nzoto ezali na eteni moko te, kasi ezali na biteni ebele.
Soki biteni nyonso ezalaki kaka eteni moko, boni, nzoto elingaki penza kozala nzoto ?
Yango wana, liso ekoki te koloba na loboko : « Nazali na posa na yo te ; » moto mpe ekoki te koloba na makolo : « Nazali na posa na bino te. »