Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 12:18 - Mokanda na Bomoi

18 Kasi Nzambe atiaki biteni kati na nzoto, mpe amonaki ete ezali malamu mpo na eteni moko na moko kozala na mosala na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 12:18
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo oyo okotanda basoda na yo na molongo mpo na bitumba, bato na yo bakotonda na mpiko, bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.


Yawe asalaka nyonso oyo alingi, kuna na likolo mpe awa na mabele, kati na bibale minene mpe kati na mozindo nyonso.


Nasakolaki makambo ya suka na ebandeli ; wuta kala penza, nasakolaki makambo oyo ekoya. Nalobaki : « Mabongisi na Ngai ekolongisama, mpe nakosala nyonso oyo nasepeli kosala. »


Bongo, babelelaki Yawe : « Oh Yawe, tobondeli Yo, koboma biso te likolo ya moto oyo. Kotika te ete makila ya moto oyo asali mabe te etangama na mito na biso. Pamba te ezali solo Yo Yawe nde osali oyo olingaki. »


Kaka na tango yango, awa Molimo Mosantu atondisaki Ye na esengo, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te obombaki makambo oyo, mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike. Iyo, Tata, pamba te yango nde osepelaki kosala.


Oh etonga moke, bobanga te ! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi !


Pamba te na ngolu oyo epesameli ngai, nazali koloba na bino nyonso : bomikanisaka te koleka makoki na bino, kasi bomikanisaka na lolenge ya mayele, kolanda kondima oyo Nzambe apesi na moko na moko kati na bino.


Kolanda ngolu oyo epesameli biso, tozalaka na makabo ekesana. Boye tika ete moto oyo azali na likabo ya kosakola asalelaka yango kolanda kondima,


Ezali Molimo kaka moko nde asalaka misala wana nyonso mpe akabolaka yango epai na moko na moko, ndenge Ye moko alingi.


Soki nzoto mobimba ezalaki kaka liso, nzoto yango elingaki koyoka ndenge nini ? Soki nzoto mobimba ezalaki kaka litoyi, nzoto yango elingaki koyoka solo ndenge nini ?


Soki biteni nyonso ezalaki kaka eteni moko, boni, nzoto elingaki penza kozala nzoto ?


wana biteni oyo ebetisaka mabaku te ezalaka na posa ya lolenge malamu yango te. Nzambe abongisa nzoto na lolenge ete basengeli kaka kozwaka na lokumu mingi, biteni oyo emonanaka lokola ezanga lokumu :


Mpe kati na Lingomba, Nzambe atiaki : ya liboso, bantoma ; ya mibale, basakoli ; ya misato, balakisi ; mpe na sima, bato oyo bazali na likabo ya kosala bikamwa, ba-oyo bazali na likabo ya kobikisa babeli, ba-oyo bazali na likabo ya kosunga bato, ba-oyo bazali na likabo ya kokamba, mpe ba-oyo bazali na likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge.


Kasi ezali Nzambe nde apesaka yango nzoto oyo Ye moko abongisa, mpe apesaka nkona moko na moko nzoto na yango.


Boni, Apolosi azali nani ? Polo mpe azali nani ? Bazali kaka basali oyo, na nzela na bango, bondimelaki Nzambe, kolanda mosala oyo Nkolo apesaki na moko na moko kati na bango.


abongisa biso wuta kala mpo ete tozwa makoki ya kokoma bana na Ye na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda bolamu mpe mokano na Ye moko,


mpe na kolakisa biso mabombami ya mokano na Ye, mabombami oyo abongisa kati na Klisto kolanda bolamu na Ye,


« Nkolo mpe Nzambe na biso, obongi na nkembo, na lokumu mpe na nguya, pamba te Yo nde okela biloko nyonso : ezalaki mpe ekelamaki mpo na mokano na Yo. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ