16 Soki mpe litoyi elobi : « Lokola nazali liso te, nazali eteni ya nzoto te ; » boni, ekotika penza kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo ?
Mpo na oyo etali bondeko, bolinganaka makasi kati na bino ; mpo na oyo etali lokumu, bozalaka bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu ;
Pamba te na ngolu oyo epesameli ngai, nazali koloba na bino nyonso : bomikanisaka te koleka makoki na bino, kasi bomikanisaka na lolenge ya mayele, kolanda kondima oyo Nzambe apesi na moko na moko kati na bino.
Soki lokolo elobi : « Lokola nazali loboko te, nazali kati na nzoto te ; » boni, ekotika penza kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo ?
Soki nzoto mobimba ezalaki kaka liso, nzoto yango elingaki koyoka ndenge nini ? Soki nzoto mobimba ezalaki kaka litoyi, nzoto yango elingaki koyoka solo ndenge nini ?
Nzokande biteni ya nzoto, oyo emonanaka ete ezali na motuya moke, ezalaka na tina makasi ;
Bosala eloko moko te na kowelana to na koluka lokumu ezanga tina ; kasi na komikitisa nyonso, bomona baninga lokola nde baleki bino.