Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 11:7 - Mokanda na Bomoi

7 Mobali asengeli te kolata kitambala, pamba te azali elilingi mpe lokumu ya Nzambe ; kasi mwasi azali lokumu ya mobali.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 11:7
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe alobaki na mwasi : « Nakobakisa pasi na zemi na yo ; okobota na pasi. Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo, kasi ye akozala mokonzi na yo. »


Tala lisolo ya libota ya Adamu. Tango Nzambe akelaki bato, asalaki bango na elilingi ya Nzambe.


Yango wana, soki moto asopi makila ya moto, bakosopa mpe makila na ye epai ya moto, pamba te Nzambe asalaki moto na elilingi na Ye.


Osalaki ye moke koleka ba-anjelu mpe olatisaka ye motole ya nkembo mpe ya lokumu ;


Mwasi ya malamu azali motole ya mobali na ye, kasi mwasi oyo ayokisaka soni azali lokola bokono oyo ezali kolia mikuwa.


Nzokande, nalingi boyeba ete Klisto azali Mokonzi ya mobali nyonso, mobali azali mokonzi ya mwasi, mpe Nzambe azali Mokonzi ya Klisto.


Mwasi oyo alataka kitambala te na moto na ye asengeli kokokola suki na ye. Kasi soki ezali soni mpo na mwasi kokatisa to kokokola suki, ekoleka malamu mpo na ye kolata kitambala na moto na ye.


Tito azali molingami mpe moninga na ngai ya mosala kati na bino, kasi bandeko na biso bazali batindami ya Mangomba mpe nkembo ya Klisto.


Kaka na lolemo yango, topambolaka Nkolo, Tata na biso, mpe tolakelaka mabe bato oyo Nzambe akela na elilingi na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ