Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 11:4 - Mokanda na Bomoi

4 Mobali nyonso oyo asambelaka to asakolaka, wana moto na ye ezali ya kozipama, ayokisaka Mokonzi na ye soni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 11:4
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Davidi azalaki komata ngomba ya banzete ya olive na kolela, moto na ye ya kozipama mpe makolo ngulu. Bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bazipaki bango mpe mito na bango mpe bazalaki kolela wana bazalaki komata.


Na mokolo wana kaka, bato bazongaki na nkuku kati na engumba lokola mampinga oyo bazali koyoka soni mpo ete bakimi na bitumba.


Pamba te mwana mobali azali koyokisa tata na ye soni, elenge mwasi azali kotelemela mama na ye, mwasi ya libala azali kotelemela mama-bokilo na ye ; bongo monguna ya moto, ezali kaka moto ya libota na ye.


Kati na Lingomba oyo ezalaki na Antioshe, ezalaki na basakoli mpe balakisi : Barnabasi, Simeoni oyo bazalaki kobenga « Moto mwindo, » Lusiusi ya Sirene, Manaeni oyo akolaki esika moko na moyangeli Erode, mpe Saulo.


Boni, mokili yango moko eteyaka bino te ete ezali soni mpo na mobali kozala na suki milayi,


Kasi mwasi nyonso oyo asambelaka to asakolaka, wana moto na ye ezali polele, ayokisaka mokonzi na ye soni, pamba te azali lokola mwasi oyo bakokola suki.


epai na mosusu, nguya ya kosala bikamwa ; epai na mosusu, likabo ya kosakola ; epai na mosusu, likabo ya kososola milimo ; epai na mosusu, likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge ; epai na mosusu, likabo ya kolimbola nkota.


Mpe kati na Lingomba, Nzambe atiaki : ya liboso, bantoma ; ya mibale, basakoli ; ya misato, balakisi ; mpe na sima, bato oyo bazali na likabo ya kosala bikamwa, ba-oyo bazali na likabo ya kobikisa babeli, ba-oyo bazali na likabo ya kosunga bato, ba-oyo bazali na likabo ya kokamba, mpe ba-oyo bazali na likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge.


Soki nazali na likabo ya kosakola, ya kososola mabombami nyonso mpe ya koyeba makambo nyonso ; mpe soki nazali na kondima oyo ekoki kolongola bangomba, kasi nazangi bolingo, nazali pamba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ