Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 11:29 - Mokanda na Bomoi

29 Pamba te moto oyo azali kolia lipa mpe komela, na kozanga kososola ete ezali nzoto ya Nkolo, azali komikatela etumbu na kolia mpe komela bongo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 11:29
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto nyonso oyo atosaka mibeko na ye akokweyela pasi te, mpe motema ya moto ya bwanya eyebaka tango ya malamu mpe lolenge ya malamu ya kosalela.


Mwana na Moto ayaki, azali kolia, azali komela, mpe bozali koloba : « Azali na lokoso ya kolia mpe ya komela masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu ! »


Boye, moto oyo aboyi kotosa bakonzi ya leta azali nde kotombokela mabongisi oyo Nzambe asila kotia, mpe bato oyo basalaka bongo bamibendelaka nde etumbu mpo na bango moko.


mpe, sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe alobaki : « Oyo ezali nzoto na Ngai ; epesami mpo na bino ! Bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai. »


Yango wana, moto nyonso oyo akolia lipa to akomela kopo ya Nkolo na lolenge oyo ebongi te, akomema ngambo epai ya nzoto mpe makila ya Nkolo.


Boye tika ete moto nyonso amitala malamu liboso ya kolia lipa mpe komela wuta na kopo !


Yango wana mingi kati na bino bakoma na bolembu mpe na bokono, mpe ebele kati na bino bakufa.


Bilei ya makasi ezali mpo na mikolo, ba-oyo bayebi kokesenisa malamu mpe mabe.


Bandeko na ngai, bozala ebele te ya koluka kozala balakisi, pamba te boyebi malamu ete, biso balakisi, tokosambisama makasi.


Liboso na nyonso, bandeko na ngai, bolapaka ndayi te, ezala na kombo ya Likolo, ya mokili to mpe ya eloko nini. Tika ete « iyo » na bino etikala « iyo, » mpe « te » na bino etikala « te, » mpo ete bakatela bino etumbu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ