28 Boye tika ete moto nyonso amitala malamu liboso ya kolia lipa mpe komela wuta na kopo !
Tokota na mozindo ya kososola banzela na biso mpe totala malamu etamboli na biso, bongo tozonga epai na Yawe ;
Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo nyonso oyo ezali kokomela bino.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo oyo ezali kokomela bino.
Bayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga : — Nkolo, ezali ngai ?
Pamba te moto oyo azali kolia lipa mpe komela, na kozanga kososola ete ezali nzoto ya Nkolo, azali komikatela etumbu na kolia mpe komela bongo.
Kasi soki tozalaki kososola oyo tozali, tolingaki kozwa etumbu te.
Bomimeka bino moko mpe botala soki bozali kati na kondima ; bomitala penza bino moko malamu. Boyebi te ete Yesu-Klisto azali kati na bino ? Loba ete bosila kokweya liboso ya komekama.
Tika ete moko na moko atala malamu misala na ye ! Soki akoki komikumisa mpo na yango, akomikumisa mpo na ye moko kaka, kasi mpo na bato mosusu te ;