— Yebisa bana ya Isalaele : « Soki moko kati na bino to kati na bakitani na bino akomi mbindo mpo ete asimbi ebembe na mokolo wana, ezala soki azali mosika na mobembo, akoki kosepela feti ya Pasika mpo na lokumu na Yawe.
Kasi soki moto moko asepeli feti ya Pasika te, wana azali mbindo te mpe asali mobembo te, basengeli kolongola ye kati na libota na ye, pamba te abonzeli Yawe likabo te na tango oyo ekatama ; akomema mikumba ya masumu na ye.
Ngai nde nazali lipa ya bomoi oyo ewuti na Likolo ; moto nyonso oyo akolia lipa yango, akozala na bomoi ya seko ; mpe lipa oyo nakopesa mpo ete mokili ezwa bomoi ezali nde nzoto na Ngai.
Bokoki te komela oyo ezali kati na kopo ya Nkolo mpe komela lisusu oyo ezali kati na kopo ya milimo mabe ; bokoki te kolia na mesa ya Nkolo mpe kolia lisusu na mesa ya milimo mabe.