Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 11:23 - Mokanda na Bomoi

23 Pamba te, nateyaki bino makambo oyo nazwaki epai ya Nkolo : Nkolo Yesu, na butu oyo batekaki Ye, azwaki lipa ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 11:23
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, bayekoli bayaki kotuna Yesu : — Esika nini olingi ete tobongisela Yo bilei ya Pasika ?


« Boyebi malamu ete etikali mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika ebanda, mpe ete ezali na tango wana nde bakokaba Mwana na Moto mpo ete babaka Ye na ekulusu. »


Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.


bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.


Sima na Ye kozwa kopo, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe alobaki : — Bokamata kopo oyo mpe bokabola yango kati na bino,


Na mokolo ya liboso ya poso, wana tosanganaki mpo na kolia elambo, Polo, oyo asengelaki kokende na mobembo, mokolo oyo elandaki, asololaki na bandimi mpe abendaki masolo molayi penza kino na ngonga ya midi ya butu.


Boni, kopo ya elambo oyo, mpo na yango, tozongisaka matondi epai ya Nzambe, ekomisaka biso te moko na makila ya Klisto ? Lipa oyo tokataka ekomisaka biso te moko na nzoto ya Klisto ?


Liboso na nyonso, nateyaki bino mateya oyo ngai moko nazwaki : Klisto akufaki mpo na masumu na biso, kolanda Makomi ;


Ngai Polo, ntoma oyo abengamaki na bato te to na nzela ya moto te, kasi na Yesu-Klisto mpe na Nzambe Tata oyo asekwisaki Ye kati na bakufi,


Tala, nateyaki bino mitindo mpe mibeko ndenge Yawe, Nzambe na ngai, atindaki ngai, mpo ete bokoka kotosa yango na mokili oyo bokokota mpo na kozwa yango.


pamba te boyebi malamu ete bokozwa, lokola lifuti, libula oyo Nkolo abongisa mpo na bato ya Nzambe. Ezali Klisto nde azali Nkolo oyo bosalelaka.


Pamba te boyebi mitindo oyo topesaki bino na Kombo ya Nkolo Yesu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ