Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 11:2 - Mokanda na Bomoi

2 Nakumisaka bino kati na makambo nyonso, pamba te bokanisaka ngai mpe bopengwaka te kati na malakisi oyo napesaki bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 11:2
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bango mibale bazalaki bato ya sembo liboso ya Nzambe, bazalaki kotosa, na ndenge esengeli, mibeko nyonso mpe mitindo nyonso ya Nkolo.


Kati na malako oyo ezali kolanda, nakokumisa bino te ; pamba te mayangani na bino esungaka bino te mpo bokoma bato ya esengo koleka, kasi ekomisaka bino lisusu bato na pasi makasi.


Boni, bozangi bandako oyo kati na yango bokoki kolia mpe komela ? Boni, bosalaka bongo mpo na kotiola Lingomba ya Nzambe mpe kosambwisa bato oyo bazangi bilei ? Nini nakoki koloba na bino ? Nakumisa bino ? Na likambo oyo, nakokumisa bino te !


mpe oyo na nzela na yango bosili kobika, soki kaka bosimbi makasi Liloba oyo nateyaki bino ; pamba te soki ezali bongo te, wana bondimelaki na bino kaka pamba.


Ezali na tina wana nde natindeli bino Timote, mwana na ngai ya bolingo, oyo azali sembo kati na Nkolo ; akolobela bino lisusu banzela na ngai mpo na bomoi kati na Yesu-Klisto, ndenge kaka nateyaka yango bisika nyonso kati na Mangomba nyonso.


Lisusu, tika ete moto na moto atambola na lolenge oyo Nkolo abongisela ye, ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye. Yango nde mobeko oyo napesi na Mangomba nyonso.


Bokomaki kolanda ndakisa na biso mpe ya Nkolo, pamba te boyambaki Liloba kati na minyoko mingi mpe na esengo oyo Molimo Mosantu apesaka.


Kasi sik’oyo, Timote awuti epai na bino mpe asili kozonga epai na biso, amemeli biso sango ya kitoko na tina na kondima mpe bolingo na bino : ayebisi biso ete bozali tango nyonso na makanisi ya malamu mpo na biso mpe bozali na posa makasi ya komona biso, ndenge biso mpe tozali na posa makasi ya komona bino.


Yango wana bandeko, botelema ngwi mpe bobatela malamu malakisi oyo toteyaki bino, ezala na nzela ya maloba to na nzela ya mokanda.


Bandeko, totindi bino na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto ete bokima ndeko nyonso oyo atambolaka na bomoi ya mobulu mpe alingaka te kotambola kolanda malakisi oyo bozwaki kowuta na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ