Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 11:19 - Mokanda na Bomoi

19 Solo, bokabwani esengeli kozala kati na bino mpo ete Baklisto ya solo bayebana kati na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 11:19
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mawa na mokili, pamba te makambo oyo ekweyisaka bato kati na masumu ezali ebele ! Solo, makambo yango esengeli kaka kozala ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka !


Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Makambo oyo ebetisaka bato mabaku ekoki kozanga te ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka !


Boye, makanisi oyo ebombama kati na mitema ya bato ebele ekoyebana. Bongo yo mpe, okoyoka lokola nde batubi motema na yo na mopanga.


Ndambo ya bandimi oyo bazalaki kala Bafarizeo batelemaki mpo na koloba : — Bato ya bikolo ya bapaya basengeli kokatama ngenga, mpe esengeli kotinda bango kotosa Mobeko ya Moyize.


Ezala kati na bino, bato mosusu bakobima, bakoteya mateya ya lokuta mpo na kopengwisa bayekoli ete bazala na ngambo na bango.


Nzokande, nandimi ete nasalelaka Nzambe ya bakoko na biso, wana nazali kolanda Nzela oyo bango bazali kobenga « binzambe-nzambe. » Nandimaka nyonso oyo ekomama kati na Mobeko mpe kati na mikanda ya basakoli.


Biso, tomoni ete mosala ya moto oyo ezali : kotia mobulu ; azali kobimisa mobulu kati na Bayuda nyonso ya mokili mobimba. Azali mokambi ya lingomba moko ya bato ya Nazareti,


Bayebi ngai wuta kala mpe bakoki kotatola, soki balingi, ete natambolisaki bomoi na ngai lokola Mofarizeo, na botosi makasi ya mibeko, ndenge lingomba na biso esengaka.


Kasi tozali na posa ete yo moko oyebisa biso makanisi na yo, pamba te toyebi malamu ete lingomba na yo ezali kobundisama bisika nyonso.


Bongo mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso oyo bazalaki kosala na ye elongo, oyo bazalaki bato ya lisanga ya Basaduseo, batondaki na zuwa.


Boye, tango boyaka na mayangani, ezalaka lisusu te mpo na kolia bilei ya Nkolo ;


Pamba te nazali kobanga ete nakuta bino te na lolenge oyo ngai nazali kolinga ete bozala, tango nakoya epai na bino, mpe ete bino bomona ngai te na lolenge oyo bozali kolinga ete nazala. Nazali kobanga kokuta kati na bino koswana, zuwa, kanda, kowelana, kofingana, kotongana, lofundu mpe mobulu.


kosambela bikeko, kindoki, koyinana, koswana, zuwa, kanda, bombanda, bokabwani, koboyana,


mpe soki bilembo minene mpe bikamwa oyo asakolaki ekokisami mpe alobi na bino : « Tika ete tosalela mpe togumbamela banzambe mosusu, » nzokande bino boyebi banzambe yango te,


Soki, kati na Lingomba, ezali na moto oyo amemaka bokabwani, kebisa ye, mbala moko, mpe kebisa ye mbala ya mibale. Soki aboyi kaka koyoka, bimisa ye libanda ya Lingomba ;


Banguna yango babimelaki kati na biso, kasi bazalaki penza bato na biso te. Pamba te soki bazalaki bato na biso, balingaki kotikala na biso ; kasi batikaki biso mpo ete emonana polele ete bango nyonso bazali bato na biso te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ