16 Soki moto moko akanisi ete ezali malamu mpo na ye kotia tembe na tina na likambo oyo, biso elongo na Mangomba ya Nzambe tozalaka na ezaleli wana te.
Nzokande, bayokaki sango ete oteyaka na Bayuda nyonso oyo bavandaka kati na bato ya bikolo ya bapaya ete batosa te Mobeko ya Moyize, mpe ete olobaka na bango ete bakata lisusu te ngenga ya bana na bango mpe batika kosalela bokoko ya Bayuda.
Zwa bango, mipetola elongo na bango mpe futela bango mbongo mpo ete bakatisa suki. Na bongo, bato nyonso bakoyeba ete sango oyo bazali koyoka na tina na yo ezali ya lokuta, mpe bakososola ete yo moko mpe otosaka Mobeko.
Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.
Lisusu, tika ete moto na moto atambola na lolenge oyo Nkolo abongisela ye, ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye. Yango nde mobeko oyo napesi na Mangomba nyonso.
Bandeko, bino mpe bokomaki kolanda ndakisa ya Mangomba oyo, kati na Yuda, ezali ya Nzambe mpe ezali kati na Yesu-Klisto, pamba te bandeko na bino ya ekolo moko banyokolaki bino ndenge Bayuda banyokolaki Mangomba ya Yuda.