13 Botala nanu bino moko : boni, ezali malamu mpo na mwasi kosambela Nzambe moto polele ?
Mpo na nini bososolaka te, mpo na bino moko, makambo oyo ezali sembo ?
Bosambisaka lisusu te kolanda oyo miso na bino ezali komona, kasi bokataka makambo na bosembo.
Nazali koloba na bino lokola na bato ya mayele ; botala bino moko soki makambo oyo nazali koloba ezali malamu to mabe.
Boni, mokili yango moko eteyaka bino te ete ezali soni mpo na mobali kozala na suki milayi,
basi basengeli te koloba kati na mayangani, pamba te bazali na ndingisa te ya koloba. Basengeli nde kotosa ndenge Mobeko etindaka.