12 Pamba te ndenge mwasi akelamaki wuta na mobali, ndenge mpe mobali abotamaki na nzela ya mwasi. Kasi makambo nyonso ewutaka na Nzambe.
Yawe asalaka makambo nyonso na tina, ezala bato mabe, asala bango mpo na mokolo ya pasi.
Pamba te biloko nyonso ewutaka epai na Ye, na nzela na Ye mpe mpo na Ye. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !
Nzokande, kati na Nkolo, mwasi azali te soki mobali azali te, mpe mobali azali te soki mwasi azali te.
Kasi mpo na biso, Nzambe azali kaka se moko, Ye nde azali Tata mpe Mokeli na nyonso, mpe biso tozali na bomoi mpo na Ye. Mpe Nkolo azali kaka se moko, Ye nde Yesu-Klisto. Nyonso esalema na nzela na Ye, mpe biso tozali na bomoi mpo na Ye.
Makambo oyo nyonso ewutaka na Nzambe oyo azongisaki boyokani kati na biso mpe Ye moko na nzela ya Klisto mpe apesaki biso lotomo ya boyokanisi.