Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 10:28 - Mokanda na Bomoi

28 Kasi soki moto moko alobi na yo : « Mosuni oyo ebonzamaki lokola mbeka epai ya nzambe ya ekeko, » kolia yango te, likolo ya moto oyo akebisi yo mpe mpo ete obebisa te motema na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 10:28
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Likolo ezali likolo ya Yawe ; kasi apesa mabele epai ya bato.


Nzembo ya Davidi. Mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Yawe. Mokili mpe ezali ya Yawe, elongo na bavandi na yango.


Moyize azongisaki : — Tango nakobima na engumba, nakotombola maboko na ngai mpo na kobondela Yawe. Bakake ekosila mpe mvula ya mabanga ekonoka lisusu te, mpo ete oyeba ete mokili ezali ya Yawe.


Boye soki, likolo ya bilei, ozali koyokisa ndeko na yo motema pasi, wana ozali lisusu kotambola na bolingo te. Likolo ya bilei, kobungisa te ndeko na yo, oyo Klisto akufelaki.


Pamba te mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Nkolo.


Nzokande, bato nyonso bazali na boyebi oyo te ; bato mosusu bazali nanu na momesano ya kosambela banzambe ya bikeko kino sik’oyo. Boye wana baliaka misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bakanisaka ete ezali penza mbeka oyo babonzeli banzambe wana ; mpe mitema na bango, oyo elenda te ekomaka mbindo.


Kasi bosala keba ete bonsomi na bino ekoma libaku te mpo na bato oyo balenda te kati na kondima.


Yawe, Nzambe na yo, nde azali Nkolo ya likolo, ya likolo koleka likolo, ya mabele mpe ya nyonso oyo ezali kati na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ