23 Bolobaka : « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » nzokande nyonso ezali na litomba te ; « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » nzokande nyonso elendisaka te.
Boye soki, likolo ya bilei, ozali koyokisa ndeko na yo motema pasi, wana ozali lisusu kotambola na bolingo te. Likolo ya bilei, kobungisa te ndeko na yo, oyo Klisto akufelaki.
Bolobaka : « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » kasi nyonso ezali na litomba te ; « nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » kasi nakomitika te na se ya bokonzi ya eloko songolo ;
Bokanisi ete, wuta kala, biso tolukaka komilongisa liboso na bino ? Te, balingami na ngai ! Ezali liboso ya Nzambe, kati na Klisto, nde tolobaka mpe tosalaka makambo nyonso mpo na kokolisa kondima na bino.
Tika ete minoko na bino ebimisaka maloba ya mabe te, kasi bolobaka kaka maloba ya boboto, maloba oyo esungaka bato mosusu na kokola kati na kondima, kolanda bosenga na bango, mpe esalaka bolamu na bato oyo bayokaka yango.
to bakangama te na masapo ya pamba-pamba mpe na botangi milongo ya mbotama, oyo ezangi suka. Makambo ya bongo ebimisaka kaka tembe, na esika ete esunga mpo ete mosala na Nzambe, oyo toyebi na nzela ya kondima, ekende liboso.