Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.
Mawa na ye oyo abetaka tembe na Mokeli na ye, ye oyo azali kaka mbeki kati na bambeki ya mabele ! Boni, potopoto ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : ‹ Ozali kosala nini ? › Mpe mosala ya maboko na yo ekoki solo koloba : ‹ Azali na maboko te ? ›
Mpo na nini bozali kopelisa kanda na Ngai na nzela ya misala na bino ya mabe, na kotumbaka malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu ya Ejipito epai wapi bokeyi kovanda ? Bino moko nde bozali komibebisa mpe komikomisa bato ya libabe mpe eloko ya kotiola kati ya bikolo nyonso ya mokili.
Boni, bokoyika kaka mpiko to maboko na bino ekozala kaka makasi na mokolo oyo nakokitisela bino kanda na Ngai ? Ngai Yawe, nalobaki mpe nakokokisa yango.
Na mokolo ya kanda na Yawe, ezala palata to wolo na bango ekobikisa bango te. Na moto ya zuwa na Ye, mokili mobimba ekozikisama, pamba te akosukisa na mbalakata bavandi nyonso ya mokili.