2 babatisamaki bango nyonso mpo na Moyize kati na lipata mpe kati na ebale monene,
Tango bana ya Isalaele bamonaki nguya monene oyo Yawe atalisaki liboso ya bato ya Ejipito, babangaki Yawe mpe batiaki elikya na bango kati na Ye mpe kati na mosali na Ye Moyize.
bazalaki kotubela masumu na bango, mpe ye, azalaki kobatisa bango na ebale Yordani.
Boni, boyebi te ete biso nyonso oyo tosila kobatisama kati na Yesu-Klisto tozwaki nde libatisi kati na kufa na Ye ?
pamba te bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto bolataki nde Klisto.