Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 10:16 - Mokanda na Bomoi

16 Boni, kopo ya elambo oyo, mpo na yango, tozongisaka matondi epai ya Nzambe, ekomisaka biso te moko na makila ya Klisto ? Lipa oyo tokataka ekomisaka biso te moko na nzoto ya Klisto ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 10:16
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na Ye kozwa kopo, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe alobaki : — Bokamata kopo oyo mpe bokabola yango kati na bino,


Bazalaki komipesa mingi penza na malakisi ya bantoma, na kozala lisanga, na kobuka lipa mpe na kosambela.


Mikolo nyonso bazalaki kokoba kosangana na Tempelo. Bazalaki kokabola lipa na bandako na bango, kolia bilei na bango na esengo nyonso mpe na motema ya komikitisa.


Amataki lisusu na etaje, abukaki lipa, aliaki yango mpe akobaki koloba kino na tongo, sima nde akendeki.


Na mokolo ya liboso ya poso, wana tosanganaki mpo na kolia elambo, Polo, oyo asengelaki kokende na mobembo, mokolo oyo elandaki, asololaki na bandimi mpe abendaki masolo molayi penza kino na ngonga ya midi ya butu.


Pamba te Nzambe oyo abengaki bino mpo ete bozala moko na Mwana na Ye, Yesu-Klisto, Nkolo na biso, azali Moyengebene.


Nazali koloba na bino lokola na bato ya mayele ; botala bino moko soki makambo oyo nazali koloba ezali malamu to mabe.


Solo, biso nyonso tobatisamaki kati na Molimo moko mpo na kosala nzoto moko : ezala Bayuda to Bagreki, ezala bawumbu to bansomi. Mpe epesamelaki biso nyonso komela Molimo wana se moko.


Pamba te tozali solo lisanga na Klisto soki tosimbi makasi, kino na suka, elikya oyo tozwaki wuta na ebandeli,


Tozali kosakola epai na bino makambo oyo tomoni mpe toyoki, mpo ete bino mpe bozala moko na biso. Nzokande, biso tozali moko na Tata mpe na Yesu-Klisto, Mwana na Ye.


Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ