1 Bakolinto 10:14 - Mokanda na Bomoi14 Yango wana, balingami na ngai, bokima kosambela banzambe ya bikeko. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi nazali nde kokomela bino sik’oyo mpo na koyebisa bino ete bozala lisanga moko te na moto oyo amilobelaka ete azali ndeko Moklisto, kasi atambolaka na bomoi ya pite to azali na lokoso ya mbongo to azali mosambeli bikeko to mofingi bato to molangwi masanga to moyibi. Bosengeli kutu te kolia mesa moko elongo na moto ya lolenge oyo.
Nzokande, ezali na ndambo ya makambo oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : kati na yo, ezali na bato oyo bakangama na mateya ya Balami oyo ayebisaki Balaki ete atia motambo mpo na kotindika bana ya Isalaele kati na masumu ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe kati na masumu ya kindumba.