Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 10:11 - Mokanda na Bomoi

11 Makambo wana nyonso ekweyelaki bango mpo ete ezala ndakisa mpo na biso, mpe ekomamaki mpo na kokebisa biso oyo tokomi na tango ya suka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 10:11
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na butu wana lisusu, bazwaki masanga ya vino mpe bamelisaki tata na bango ; bongo leki akendeki mpe asangisaki nzoto na tata na ye. Tata na ye atikalaki kaka koyeba likambo yango te, ezala tango mwana na ye ya mwasi akendeki epai na ye to tango alongwaki.


Akoyanola libondeli ya bato oyo babungisaki biloko, mpe akondima mabondeli na bango.


Okozala likambo ya soni, ya kotiola, ya liseki mpe ya soni makasi na miso ya bikolo oyo ezingeli yo, tango nakopesa yo etumbu na kanda mpe na kotomboka na Ngai ya makasi penza. » Ngai Yawe nde nalobi.


monguna oyo alonaki matiti mabe ezali Satana, tango ya kobuka mbuma ezali suka ya mokili ; bongo bato oyo babukaka bambuma, ezali ba-anjelu.


Ndenge bapikolaka matiti mabe mpe batumbaka yango na moto, ndenge wana mpe ekozala na suka ya mokili :


Bosalaka bongo awa bozali kososola tango nini tozali kobika. Tango ya kolamuka na pongi na bino ekoki, pamba te lobiko ekomi sik’oyo pene na biso, koleka tango tozwaki kondima sika.


Butu ekomi pene ya kosila mpe tongo elingi kotana. Yango wana, tobwaka misala ya molili mpe tolata bibundeli ya pole.


Nzokande, makambo nyonso oyo ekomama kala ekomamaki mpo na koteya biso, mpo ete na nzela ya kokanga motema mpe malendisi oyo Makomi epesaka, tozala na elikya.


Nzokande, ezali mpo na ye moko kaka te nde ekomama : « Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo ; »


Ezali bandakisa mpo na biso, mpo ete tolula makambo mabe te ndenge bango balulaki.


Bandeko na ngai, nazali koloba boye : tango ekomi moke ; kobanda sik’oyo, tika ete mibali oyo bazali na basi bazala lokola nde bazali na basi te ;


Ezali te mpo na biso nde alobaki bongo ? Solo, ezali mpo na biso nde ekomamaki bongo ; pamba te moto oyo azali kotimola asengeli kosala yango na elikya, mpe oyo azali kobeta mbuma asengeli kosala yango na elikya ete akozwa eteni na ye.


Makambo oyo epesami lokola ndakisa : Basi oyo mibale bazali kotalisa boyokani mibale. Moko ewutaki na ngomba Sinai mpe ebotaki bawumbu ; yango nde Agari azali kotalisa.


Tika ete boboto na bino eyebana na bato nyonso. Nkolo akomi pene.


Tokima Bandako ya Nzambe na biso te, ndenge bato mosusu bamesana kosala ; kasi tolendisana biso na biso, wana bozali komona ete mokolo ya Nkolo ekomi pene.


Etikali moke, moke penza, ete Ye oyo asengeli koya aya, mpe akoya kala te.


Bana, tokomi na tango ya suka ; ndenge kaka boyokaki ete monguna ya Klisto azali koya, nzokande banguna ya Klisto basili koya sik’oyo ebele, ndenge wana mpe tosengeli koyeba ete tokomi na tango ya suka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ