Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 1:4 - Mokanda na Bomoi

4 Nazongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe na tina na bino, mpo na ngolu na Ye, oyo epesamela bino kati na Yesu-Klisto ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 1:4
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yesu azongiselaki bango : — Mibali nyonso bakoki kondima mateya oyo te, kaka ba-oyo bapesameli makoki mpo na yango.


Soki bosengi Ngai eloko na Kombo na Ngai, nakosala yango.


Mpe Ngai, nakosenga epai ya Tata ete apesa bino Molobeli mosusu mpo ete azala elongo na bino tango nyonso,


Kasi Molobeli, Molimo Mosantu oyo Tata akotinda na Kombo na Ngai, akoteya bino makambo nyonso mpe akosunga bino mpo ete bobosana te nyonso oyo nayebisaki bino.


Tango Molobeli akoya, oyo nakotindela bino kowuta epai ya Tata —Molimo ya bosolo, oyo akowuta epai ya Tata— akotatola Ye moko na tina na Ngai ;


Tango akomaki kuna mpe amonaki ndenge nini Nzambe apambolaki bango, asepelaki makasi mpe alendisaki bango nyonso ete bakangama makasi na Nkolo, na mitema na bango mobimba.


Sima na bango koyoka ye, bakumisaki Nzambe. Bongo balobaki na Polo : — Ndeko, ozali komona motango ya bankoto ya Bayuda oyo bakomi bandimi, mpe bango nyonso bazali na bolingo makasi mpo na Mobeko ya Moyize.


Ya liboso, nazali kozongisa matondi epai ya Nzambe na ngai, na nzela ya Yesu-Klisto, mpo na bino nyonso, pamba te bazali kolobela kondima na bino kati na mokili mobimba.


Kasi tika ete tozongisa matondi epai ya Nzambe ! Soki na kala bozalaki bawumbu ya lisumu, kasi sik’oyo bokomi kotosa na motema mobimba mateya oyo bateyaki bino,


Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !


Nkolo na biso atondisaki ngai na ngolu na Ye, elongo na kondima mpe bolingo oyo ezali kati na Yesu-Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ