Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 1:27 - Mokanda na Bomoi

27 Kasi, kati na mokili, Nzambe aponaki biloko pamba mpo na koyokisa bato ya bwanya soni, aponaki biloko elemba mpo na koyokisa biloko ya makasi soni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 1:27
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, Nkolo na biso, Kombo na Yo ezali monene kati na mokili mobimba ! Ovandisi nkembo na Yo kati na Lola.


Yango wana, nakokoba kokamwisa bato oyo ; ekozala nde bikamwa likolo ya bikamwa kino bwanya ya bato ya bwanya ekobunga, mpe mayele ya bato ya mayele ekosuka. »


Bato bakelela bakosepela makasi kati na Yawe, babola bakozala na esengo kati na Mosantu ya Isalaele.


Sik’oyo, nakomisi bilembo ya basakoli ya lokuta eloko pamba ; natie mobulu kati na molimo ya bato oyo balobaka makambo ekoya, nakweyisi boyebi ya bato ya bwanya mpe nakomisi mayele na bango liboma.


Bato ya bwanya bakoyokisama soni, bakoyoka somo mpe bakokende na bowumbu, pamba te batiolaki Liloba na Yawe. Bazali na bwanya ya ndenge nini ?


Kasi kati na bino, nakotika bato oyo bakelela, bato oyo batambolaka na komikitisa, bato oyo bakozwa ebombamelo kati na Kombo na Yawe.


Ane elobi na Balami : — Boni, nazali ane na yo te oyo osalelaka tango nyonso kino na mokolo ya lelo ? Nazalaka solo na momesano ya kosalela yo makambo ya boye ? Balami azongisaki : — Te !


Kaka na tango yango, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike !


Balobaki na Yesu : — Ozali koyoka makambo oyo bazali koloba ? Yesu azongiselaki bango : — Iyo ! Boni, botikala nanu kotanga te : « Wuta na minoko ya bana mike, mpe ya bana oyo bazali nanu komela mabele, ozwaki lokumu na Yo ? »


Wana Yesu alongwaki na esika yango mpe azalaki kokende, amonaki mobali moko avandi na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako ; kombo na ye ezalaki « Matayo. » Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Boye Matayo atelemaki mpe alandaki Yesu.


Pamba te, Ngai moko, nakopesa bino maloba oyo bosengeli koloba mpe bwanya oyo ekosala ete banguna na bino nyonso bandima nyonso oyo bokoloba.


Ndambo ya bato ya mayele oyo balandaka malakisi ya Epikire mpe ya Zenon bakomaki kotiana tembe na ye. Bamoko batunaki : — Moto oyo ya makelele alingi koloba nini ? Bamosusu balobaki : — Tomoni lokola nde azali kolobela banzambe ya bapaya ! Balobaki bongo mpo ete Polo azalaki koteya Sango Malamu na tina na Yesu mpe lisekwa kati na bakufi.


Kaka Moyize oyo bandeko na ye baboyaki na koloba na ye : « Nani atie yo mokonzi mpe mosambisi, » ye nde Nzambe atindaki mpo ete azala mokonzi mpe mokangoli na bango, na lisungi ya anjelu oyo abimelaki ye na mwa nzete.


Tango bato ya Likita-Monene bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bakomaki kolia minu mpo na Etieni.


Wapi moto ya bwanya ? Wapi molakisi ya Mobeko ? Wapi moto ya mayele ya tango oyo ? Boni, Nzambe akomisa te bwanya ya mokili liboma ?


Pamba te lokola, kati na bwanya ya Nzambe, mokili etikalaki te koyeba Nzambe na nzela ya bwanya na yango, yango wana Nzambe asepeli kobikisa bandimi na nzela ya mateya oyo emonani lokola liboma.


Nzokande biso, tozwaki molimo ya mokili te, kasi tozwaki Molimo kowuta na Nzambe, mpo ete tokoka kososola biloko oyo Nzambe apesi biso na nzela ya ngolu.


Pamba te bato mosusu balobaka : « Mikanda na ye ezalaka makasi mpe ebangisaka ; kasi soki ye moko azali elongo na biso, azalaka na ye moto ya bolembu mpe maloba na ye ezalaka tina te. »


Kasi tomemaka bomengo yango kati na bambeki ya mabele mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te.


Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ