1 Bakolinto 1:26 - Mokanda na Bomoi26 Bandeko, bokanisa nanu oyo bozalaki tango Nzambe abengaki bino : kati na bino, moke bazalaki bato ya bwanya kolanda emoneli ya bomoto, moke bazalaki bato minene, mpe moke bawutaki na mabota ya lokumu ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kaka na tango yango, awa Molimo Mosantu atondisaki Ye na esengo, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te obombaki makambo oyo, mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike. Iyo, Tata, pamba te yango nde osepelaki kosala.